About Lexicon

A feature rich and highly configurable, professional Joomla theme.

Icône d'Elisabeth de la Trinité - Carmel de HarissaO ! Nzambe wa ngai, Bosatu Bosantu, boye nazali kokumisa mpe kokembela, nasengi osalisa ngai na ntima'te natongo ndako ya ngai o Yo, likonzi likombongwana te mpe lya boboto, se lokola nde'te molimo mwa ngai mosili kovanda o nkembo ya lobiko. Nasengi na Yo'te likambo soki nini libebisa kimya mpe likabola yo na ngai yo oyo okobongwanaka te ; kasi sala'te monuti moko moko mazindisa ngai o bozindo bwa mobambomo mwa Yo. Nasengi soki olingi opesa ngai kimya ya motema bongo mwango mokoma lokola "Mboka ya Yo likolo" na ndako ya Yo na ndako ya Yo ya bolingi na esika ya Yo ya bopemi. Mokonzi sala'te natika Yo mokolo moko na bozali Yo moko, kasi na mobimba mwa ngai manso naumela o Yo, nazala bongo nabokebi onzila ya boyambi bwa ngai se bobele bongo nakumisa na bomitiki na mobimba mwa ngai o mwango mwa Yo Mozalisi wa lokolo na nse.

O ! Mobikisi wa ngai Kristy wa bolingo, ondimi babaka yo okuruse se mpo ya bolingo, nasenge'te nazala bolongani wa motema mwa Yo nta bosantu, nalingi nazinga Yo na lokumu bonso mpe na bolingi bobele Yo 'tee kin'o liwa likokwela ngai mpo ya yango : Kasi tala, namomi botau na bompanga, bwa ngai; yango nasengi okonza ngai Yo moko mpe olongobanisa mayoki ma motema mwa ngai na maye ma motema mwa Yo, sala'te nazinama mpe natondisama na présence ya Yo mpe obomba ngai oyo na ntina'te bomoi bwa ngai bongengisama na mwinda mwa Yo to mwa bomoi bwa Yo. Bongo, Yo mei oya omboka ngai Yo oyo ozali lokola Mokusimi, Mobondi na mpe Mobisiki.

O ! Mwana wa Nzambe wa lobiko, liloba lya Nzambe, nalingi kolekisa bomoyi na boyokameli Yo, nalingi Yo oteyaka ngai na ntina'te nazwaka mateya bobele epai ya Yo, na msima na butu inso ezala na nzila ya bozangi bonso, ya botau bonso nalingi kotala se yo na manso mpe komimbomba onse ya Mwinda mwa yo monene. E' Monzonto nakolingaka, sala'te bomoi bwa ngai obongola bwango bobele na ntina'te nakoka lisusu te kotika Mwinda mwa Yo.

O ! Yo Elimo Santu, Môto mokotumbaka mpo ya kopetola, Yaka noki ona ngai mpo'te Mwana wa Nzambe akoma moto o molimo mwa ngai na ntina'te o Ye nazala na bomoto obwango ozongela lisusu mosala mwa mobombamo mwa Ye mwa bokomi moto. Na yo, O ! Tata Nzambe, omibongola epai ya mobola wa yo ekelamo ya Yo ntâ boke, zua yango na elilengi ya Yo, omimono okati ya Ye lokola oyo alingami mingi koleka omboka Ye epai Ya Ye osopi mabondi ma yo mingi koleka.

O ! Na bino bano Bosato, ndako mobimba mpo ya ngai, Esengo inso ya ngai, bomoko bozangi nsuka, Etando ntâ bonene oyango nazali kobungama, nazali komipesa lokola victime ; okonda ya wa okoti yo bomoi bwa ngai na ntina'te esalema se bongo ngai epai ya Yo. O nkembo ya Mwinda mwa yo moye mozali lokola etando ya mambi nta bonene bwa Yo ndelo te.